0 25 minutes 4 jours

Awa Papa Ebale Mbonge azali koteya ndenge ya kosepelisa Nzambe. Ezali kaka kosambela te kasi nde mpe kotosa mibeko mya ye minso mpe kosunga basusu na kokabela mpe kosalela Nzambe.

Ekaboli ya liteya :

-1/ Tobonzela Nzambe ba centres -2 / Esengeli ezala awa te (Lopango ya Binza-village te), Ye(PEM) apesi oyo ya ye nyonso ;

– 3/Tobonzela Nzambe (libonza nzela ya bopetuami ndakisa : lisolo ya moto abonzela Nzambe lokole),-4/ Tosala nyonso ya malamu ;-4/- Tosalela Nzambe, ekolo pe libota,-5/- Couvent ?,-6/- Osaleli Nzambe nini ?-7/ Charité (kokaba)– partage : Yeba okokende na eloko te(sima ya liwa),-8/ Kotosa Nzambe ,-9/ Dévouement to komipesa mobimba (ndakisa ya « bon samaritain ») ,-10/ Sida : Etumbu ya Nzambe.

-(Papa Ebale Mbonge) :-Bana Ebale Mbonge mbote !

-(Bato bandimi) :- Mbote !!!

-Tobimi na mwa retard. Bana basusu ya Congo(Brazzaville) bazalaki awa, baye basengelaki kosalisama. Tosalisaki bango lobi, esilaki te. Nasilisaki yango lelo puisque esengelaki bazonga lelo. Bayaki kotuna ngai et nakamataki lisusu bana basusu ya sika nabwakeli bango mayi ete mpo ya kolongola mikakatano na miso. Boongo toya sika ya kobanda losambo.

-Nakobanda naino na mwa mayebisi moke. Na maye matali transport. Parfois soko tosilisi losambo, bato bazali kozua difficulté ya transport too mokolo ya mardi sima ya boyekoli bondimi. Difficulté ya transport ezalaka. Et relation public bakamati contact na transporteur moko, nayebisaki na baye bazalaki na boyekoli bondimi mokolo wana, na Nganga-Nzambe Yoka, na bato mosusu wana, na relation publique ba- informer ngai lelo boye : ya liboso, transporteur, soko akotia motuka na ye à notre disposition, condition na ye, komema biso awa mpe kotika biso na pont Kasavubu : 50 zaires ! 

Totalaki yango, tomonaki lokola ezali mingi te parce que bus ekomi 20 zaires. -Soko moto moko azali kokende na ville to na côté ya nzela wana soko alongwe (…).

-Tokoloba makambo ya parcelle.

Soko bato banso bazali koya awa tous les jours, c’est parce que tozali na esika mosusu ya kosala bonganga te. Mingi balobaka ‘te « Ebale Mbonge, nguya na ye ezali kaka na lopango oyo », mingi : « Mpo nini asalaka bonganga kaka na lopango oyo wana ? » Mais Brazzaville, bazali kosala bonganga ! Nazalaka kuna !…

-Na Kikwit bazali kosala bonganga, nazalaka kuna ? Na Kisangani bazali kosala bonganga nazali kuna ? Na Matadi bazali kosala bonganga.Mais lokola bato batie yango na mitu na bango, esengeli tolakisa bango ‘te nguya ya Ebale Mbonge etondi na molongo mobimba !!!! Tosali ba Centres ezali ko -correspondre na ba sous régions minei na Kinshasa.

Centres A, B , C, D esengeli bakomela ngai wana mpo kuna ezali A, B, C pamba ! Centres A, B, C, D ezali mpo ya ville de kinshasa, E et F, E ezali ko- s’occuper na bato bauti intérieur na ba régions, na ba pays étrangers autres que l’Afrique.

Centre F : ezali ko- s’occuper na ba pays d’Afrique. Toloba tokoki kotikala awa na Centre E et F. Mais ba centres A, B, C, et D esengeli ezala awa na Lopango oyo te soko esengeli ezala awa na lopango te nde toloba totia yango quelque part.

Wapi ?

-Mais na sous -région na sous région ! Soko, nakanisi nayokaki bazali koloba yango, na Kisangani, bana ya Kisangani basombeli biso lopango kuna na Kisangani. Nalingi naloba kaka mwana moko asombaki yango. Mais lokola ye azali mpe mwana na kati ya bana, nabenga ye kaka « bana ya Kisangani ». Asombi lopango, atii yango na nkombo ya Papa Ebale Mbonge, atindeli ngai mikanda. Napesi mitindo batonga lopango losantu ya sika. Kaka na parcelle wana, batongi nyoso. Nayebisaki bino, na Noël nde mokolo ya yambo bayaki kovanda bango banso. Basali réveillon lokola biso tosalaki awa, bango bazalaki na Lopango Losantu. Lelo na tongo nasololaki na papa Nganga Nzambe chargé de centre parce que tozalaki kosala bonganga na parcelle na ye. Sik’awa tokomi na parcelle ya biso oyo mwana too ban’ Ebale Mbonge basombeli Papa Ebale Mbonge.

Est-ce que ezali lopango nakokende kovanda kuna nabaloli yango ekomi ya ngai moko ?

Oyo ya awa, oyo nyonso ekoma ya bino banso! Oyo epai boye, ezalaki mpe ya ngai, ezali lisusu ya ngai te. Nazali mpenza na posa kaka ‘te baye bakokoka, moko too bayike balukela biso par sous- région, na ville ya Kinshasa, parcelle moko na ba-dimensions oyo ekoki. Et, totuna bana ya sous -région wana bakoka kosala lopango oyo. Tozali na besoin na libandela kaka na Soins et Purifications, na Musée mpe na Box ya mosala.

Liboso tozali na besoin na biloko mingi te. Soko tozui Soins et Purifications, Musée na’ Box ya mosala na mwa esika Chargé de Centre akosala ba -rapports na ye, ekoki naino bongo avant totonga oyo nyonso oyo totongaka. Parce que awa, avant ekoma boye, tozalaka, ba oyo ya kala bayebi ndenge ezalaki awa mpenza, même esika totelemi awa, ezalaka’ boye te.Donc bosala yango, mpe botala soko biso tokofungolela bino centre pene na bisika bovandaka te. Mpo mingi bazali koloba : « Epai ya Ebale Mbonge, ye na suka ya mboka » ! Biso na suka ya mboka ?! Nayebi te soki awa ezali suka ya mboka par rapport na wapi ?! Peut-être par rapport na bato bazali kuna ! Biso lokola tovandi côté ya Kinsuka. Kinsuka mpe ezali esika ya bato bakendeke kosuka!

Donc peut être ezali mpo na ndenge wana, nayebi te . Mais, soko bobongisi na ba- sous régions nyoso, bolukeli biso lopango moko moko, biso tokofungola Centre, tokotia ba Nganga Nzambe bakosalisa bino lokola bazali kosalisa basusu na Kikwit, na Matadi to mpe na Kisangani too na mboka lokola Brazzaville.Ekozala malamu mingi soko bino bokosala yango moko too bayike baye bakoluka ba-possibilités ya kosala yango too ko-céder kaka. Ngai na-céder oyo ya ngai nyonso. Lopango Losantu oyo, ezalaki […] esika wana nyonso wana ezalaki bilanga na ngai ya ndunda, makemba, awa na bisika bovandi wana.[…] Na’ bino mpe bokoki kosala mwa moke mpo ya Nzambe na bino ! Mpo ya bango ! Nateyaka’ yango liboso .Sika nakomi mpenza na mateya nateyaka’ liboso ‘te: « Baye bazalaka too na ntango mingi ya kosambela te, bango basengeli, soko bazali na moyen, babonzelaka Nzambe mabonza ». Naloba moto moko, na mbongo na ye, asombi eloko moko apesi Nzambe.

Oyo nyonso ezali kosalema na esika wana, puissance ya Nzambe ekokwela ye ! Akozwa yango ! Napeseki, exemple ya ntango nazalaki na Bikoro : « Tata moko akufa na ye kala. Mais bato bayebaki ye na mboka azalaki koboma bato. Na tango yango azalaki koboma bato, ezali oyo ya kindoki te mais, asiliki… likonga ! … asiliki …abeti yo flèche ! Na ndenge wana babandaki mpe koloba même azalaka’ ndoki mpe ! Mokolo moko ba ndeko na ye bayei epai ya biso na lopango losantu ya Bikoro. Tobengi tata wana, abimi na nzoto ya mwana moko ya mwasi, alobi que azali kobatela ye. Bandeko na ye nyonso badzomeli balobi: « Ndoki wana, aya kobatela mwana ndenge nini » ? Ye moko alobi :- « Ngai nazali lisusu ndoki te, ngai nazali mosantu » !

Batuni : – « Yebisaka ndenge nini yo obatelaka ».

Alobi ata lokola ye abomaka bato, asalaka mabe mingi, Nzambe atia ye esika ya malamu.

-Ndenge nini ?

-Tango, na mboka wana « Yembe Moke », bafungolaki ndako ya Nzambe ya Catholique, basali chapelle moko kuna. Basango bakomi. Ye lokola ayebaki kosala lokole, asali lokole moko ya monene, kopesa don ya chapelle wana, cathéchiste atie yango esika batiaka mpo ya kobengaka bato. Abeteke lokole wana. Ba- protestants mpe bayei kotonga oyo ya bango chapelle, kaka na mboka wana, asali ndenge moko. Apesi bango lisusu lokole. Il se fait que lokole babeteke lokole mpo ya kobengaka bato, ba- puissances oyo nyonso wana ekomi kokwela tata wana tii kuna esika akenda, akufa. Masumu na ye elimbisami, allez, balekisi ye na catégorie ya bakoko malamu ya epongelo tii lokola basusu kaka bazali kosambelaka awa, akoma na ye mosantu !

Bokoki ko -s’imaginer biloko ya ndenge wana. Nzambe azali na ba- secrets na ye oyo bato bayebaka te. Okoki kokamwa moto moko azalaki mabe mingi et puis akomi mosantu ndenge nini?

-Mais oyo ye asalaki ! Ba actes ye apozaki yango ebendeli ye bosantu na ye ! Tokamata bato basusu bazali na bambongo mingi. Naloba moto moko azali na mbongo mingi, asombi mabele moko mpe alobi Ebale Mbonge mabele wana ekomi ya yo, tongela biso centre moko, tia baNganga Nzambe basalisa biso.

-Papa wana ndoki mpenza asali nyoso wana, Nzambe azali komona ye te?

Bon ! Biso sik’awa tobandi kosalisa bato wana awa. Ye akufi, na kindoki na ye, na’ bato aliaki.

Mais bato oyo babikisami grâce na ye Nzambe azali komona bango te ? Akolimbisama te ?

-Makambo ezali mingi oyo esengeli boyeba. Nzambe azali na oyo azali kosenga biso tosala mais, tozali koyeba kosala yango te.

Nautaki koseka ngai, papa Nganga Nzambe représentant, bato basusu bakei kolukela biso lopango quelque part na mboka moko mpe bamoni lopango ezali soko 30.000 soko 35.000 milles zaires, mpe balobi : lopango yango oyo yo olingi tosomba kasi nani akobimisa mbongo mpo ya kosomba. Bon ! Sik’awa ! Mais, soki bino bokomelaki kaka biso mokanda, mbele biso bana ya Kinshasa tokokaki koluka mbongo, tosali yango! Tolobaki bongo ngai na Nganga Nzambe Mokolo. Ezali makambo ya kokamuisa biso ! Soki totangi bato yango, okondima te, bazali bato minene mingi na kati ya lopango oyo […] , mais tokoloba yango ata pembeni tout à l’heure ngai na’ baNganga Nzambe. Tokotongo bango te mpo bakozala kuna. Soko bakozala kuna c’est que bazalaka kuna. C’est clair !…

Nganga Nzambe bazali kotunaka: “ Ye atindi biso toluka lopango. Bon! Balobi bapesa 30.000 …Nani akobimisa mbongo mpo ya kosomba? Ekozala na compte ya nani? Vraiment yo Nganga Nzambe ? Yo moto olingaki kokufa kalakala, ozali ko vivre kaka na nguya ya Nzambe ? ! Okoki kobimisa 25.000 soko ozali na yango te mpo ya kosombela Nzambe 

lopango ? Bana nyonso baya kobikisama na lopango wana yo osombi ?

Eyokisaki ngai mawa mingi, nakoki kobomba yango te parce que ekomi kotungisa ngai motema. Nakomi komona valeur ya moto na moto na miso ya Nzambe malgré oyo nyoso tozali kosala. Ezali likambo monene ! Komimona te que mpo yo ozali Nganga Nzambe te too yo ozali nani, biloko wana ezali ko- compter te. Mwana moko ya Ebale Mbonge azali Nganga Nzambe te, azali na Kisangani, atindaki liboso famille na ye awa, ye alandi. Ayei, amoni ndenge tozali kosala, nauti koloba na bino sik’awa, azongi na Kisangani. Akei kosombela Papa Ebale Mbonge Lopango ! Asuki kaka wana te. Atindeli ngai mokanda, alobi a-embarquer ebele ya mabaya, ezali koya na bateau ya Solbena. Ye akendeki lobi samedi […], ye moko kaka. Mwana wana azali kosala !

Nzambe azali komona ye te ?! Kosepela oyo biso banso tokosepela na oyo ye asali ?! Nzambe ayebi yango te ? Ezali likambo monene !

-(Bato babeti maboko)

-Yango nde nakoki kotuna bino yango na cadre ya mateya ya lelo, bosala nyonso oyo ezali malamu mpo ‘te ekomisa yo epai ya Nzambe. Ezali kaka kosambela te ! Parce que bino bozali ko- se tromper mingi. Bokanisi kaka kosambela ezali kaka kofukama, kosambela… Bomonaka ngai nafukamaka mikolo nyonso kosambela ? Soko nazali kosalisa bana ya Nzambe, nazali kosalela ye ! Nzambe alobi na Papa Ebale Mbonge boye, boyoka oyo ye alobaki na ngai. Natuni ye, tango ba-nommer ngai ambassadeur na Angola. Nalingi nakende na angola. Ye aboyi. Alobi il faut nakende naino na Bikoro, atondisa ngai na puissance mpe sima nazongela makambo nyonso ya mokili. -Natuni ye : « (Cela)… veut dire nakosala lisusu mosala te, to kozala kaka boye ? -Alobi :- « Te ! Na cadre ya mission oyo napesi yo, programme ezali boye : ‘’Kosalela Nzambe, kosalela ekolo na yo, kosalela mpe famille ‘’. Elingi koloba oyo nyonso tozali kosala ezali mosala ya Nzambe; misala ya ekolo, soko ozali na ba-fonctions okoki kosalela ba-fonctions na yo nyonso, okosala yango. Papa Nganga Nzambe Ipoto, ambassadeur, asi akei ! Akei na mboka oyo babotaka Papa wa Rome (Pologne) , batindi ye ambassadeur ya biso na mboka oyo wana ! Donc, akei kuna parce que il faut asalela mpe ekolo lokola. Asalelaka Nzambe malamu mpenza. Et puis kosalela famille. Akei kuna kosalela ekolo. Mais akei mpe kosalela famille ! Mwa bameya oyo bafutaka ye, lifuta wana ezali koleisa famille. Nyonso wana nde oyo Nzambe alingi !

-Nzambe alobaki te ‘te moto moko akota na couvent moko avanda, akangama wana, ye atikali kaka na couvent!

-Non !!!

Mais baye bakoki kosala yango parce que azali na soutien mosusu, bakoki kosala na libota balobi : « Bon, tokoyokana yo okosala mosala ya Nzambe mingi koleka ngai. Yo mosusu akoluka mbongo mingi koleka ngai. Oyo mosusu akosala. Bo-complèter alors nyoso oyo Nzambe alingi mpe na losambo na bino. Bokoyebisa Nzambe moto na moto akosala mpo ‘te oyo nyonso ebiengami nguya ya Nzambe, esopana (na) nzoto na ye.Tokoki kosala yango. Mais basusu, hésitation ezali mingi ! Hésitation !…- Ko-hésiter mpo ya Nzambe te ! Toloba économie oyo yo osali, okotaka lisusu na ba- hôpitaux te, osombaka lisusu bankisi te mpo oyaka na Lopango Losantu ! Yo osalela Nzambe nini ? Yebisa nainu…Osalela Ye nini ? -Na hôpital ofutaka combien ?! Tango okendeki kuna, komona elongi ya médecin, ordonnance pamba, nainu basalisi te, Kaka komona elongi na ye, oyo babengaka consultation !… Tofutaka combien ? Clinique Ngaliema par examen. Moko moko akende clinique Ngaliema te ?! Nganga Nzambe Liguagua ! –1.000zaires !!!, komona elongi na docteur !…

-Bobetele bango maboko !

Omoni ? ! Bobetela bango maboko malamu penza ! Mais tango yo oyaka awa, mpo Nganga Nzambe asalisa yo uta tongo tii butu obiki mpe ya solo. Yo ofuta ye ? Ye azali kosalela Nzambe ! Mais ozongiseli Nzambe nini ? Moto na moto atala nainu kaka nzela ye auti, libiki oyo ye azui mpe ye asalela Nzambe nini mpo ‘te Nzambe na’ bana na ye mosusu basepela ? Asala nini ? Ezali ebele !!!

Economie oyo yo osali, yo moto ozalaki tango nyoso na hypertension na yo, kosomba bankisi.

… Mokolo moko mwana moko autaki na pharmacie ayei koyebisa ngai : « Oyebi papa boye na boye » ? -Bonjour papa ! -nalobi : « oui » ! Alobi : « Papa wana auti koloba na pharmacie de l’Ozone alobi mbala oyo soki akokufa, akufa parce que tous les mois bankisi na ye ya hypertension 27.000 zaires ! Tous les mois !

Donc, tous les mois azali ko-consommer bankisi mpo ya kosilisa hypertension na ye. Nkisi yango esalaki 27.000 zaires !

-Tozali na mbula nini ?

-1984.

-Bongo lelo oyo ye […] soki azali nainu kaka na bomoyi, azali nainu. Mpo nayoki naino te que akufi. Ezali ko- coûter cher te ?!

Yo soko obelaki bamalade ya ndenge wana, ata soko ofutaki 27.000 lokola ndeko wana te, mais mwa dépense ozalaki kosala.

Osalelaka Nzambe nini ? Ozongisela ye eloko nini ?

-Lopango oyo ezali lopango ya biso banso. Oyo ezali kosalema wana, misala wana ezali kosalema na baNganga Nzambe !

-Est-ce que ezali kaka lopango ya baNganga Nzambe ?

Pavillon oyo kuna Nganga Nzambe moto atongi.Oyo bazali kotonga awa, Nganga Nzambe ! Oyo lokola ekomi na niveau wana esukaki wana, Nganga Nzambe kaka ! Biso tozali kobenga bato baya mpo kosalela biso oyo tozali kozanga te mais, nazali nde kolakisa bino boyeba oyo Nzambe alingaka bosalela ye mpo bokoma baninga na ye ! « Oh Nzambe, nalingi kaka opesa ngai biloko nyonso, opesa ngai boye » ! … Bon, ye akopesa yo. Apeseke ! Osengi boye, apesi yo ! Abandi kotala soki yo okokabela baninga. Okabaka te ! « Bon, napeseke ye, ye akabaka te ! Bon esili » !

– Charité, partage !

Yo moto ozuaki, il faut opesa basusu ! Basusu bazali kotondisa mabenga. Moyimi kaka ye moko ! Soko ozali commerçant, o-amasser (onduki) , o- amasser(onduki) , o-amasser tii mokolo okokufa…. : – « Oh ! Pauvre tata na biso » !

-Mais, ye moto azalaki na mbongo ebele, akomi pauvre ? Ndenge nini ?! Hein !… Pauvre tata na biso vraiment !!! Tata na biso ya riche, bokomi kobenga ye pauvre ?

-Bino moko bozali conscients na terme yango ! Akomi pauvre parce que tango akendeki, kaka na pantalon moko na chemise, peut-être balatisaki ye yango. Peut-être akufaki motakala. Soko moto akufaki motakala, abimi kuna kaka motakala ! Soko azali mosantu nde balatisi ye bilamba. Mais soko azali na ye mosantu te, abimi kaka motakala kuna. Bino awa bokolatisa ye bilamba après, bokomi kobenga kaka « pauvre » solo ! Mais, soko ye asalaki makambo ya malamu, mbele azali mosantu ! Akozala pauvre te ! Bo-poser ba-actes oyo esepelisaka Nzambe. Naloba na Dimanche soko tozui tango, nakosolola na bino malamu penza mwa makambo mingi , puisque ban’Ebale Mbonge bakamataki décision à partir ya Noël oyo, tokolanda kaka Nzambe, toboyi makambo nyonso ya biso ya mabe. Alors esengeli toyeba oyo Nzambe alingi !

-Nzambe alobi : toyebi kolanda ye te. Alingi totosa mibeko na ye. Mibeko na ye , alors nyonso ! Azali na mibeko ebele ! Ezali kaka mibeko zomi te ! Nzambe azali na ba-principes. Principes, nakamata exemple ya principe : -« principe ezali asali ngai mobali, asali yo mwasi ». Principe ya création ! Kobalola rôle wana ekomi lisumu. Lokola mibali misusu baboya basi, batia mibali mosusu basi na bango ! – Donc ezali contre- principe ! Lisumu ya ndenge wana, ekosila ndenge nini ? Moko wana ! Esengeli olanda ba-commandements na ye ! Boyokaki yango :- 10 commandements. Nzambe azali na ba-lois na ye mosusu. Azali na ba-règlements na ye. Azali na ba-coutumes oyo ye apesaki, ezali ebele ! Esengeli toyeba, koyeba Nzambe malamu ekozala malamu mingi, parce que okosala kaka juste oyo ye alingi, mpe ye akosepela na yo ! Bokobosana likambo oyo ekomomami na bible : oyo ya le bon samaritain te ! Toloba, natanga ye te, soko pasteur soko sango azali kokende na messe na tuku-tuku na ye to na voiture. Moto moko azali malade. Oh, -sango okende kotika ngai awa na Mama Yemo ! -Alobi : non, non, non nakomi na retard parce que nazali kokende kosala messe. Vrroumm … Akei to mpe vrroummm… na voiture na ye akei. Alors ye sango wana too pasteur wana akei kosala messe. Mais, sima awa mwana mosusu ya pamba boye, peut-être azali moto ya masumu mingi, azali na ye sango te, pasteur te. Akuti malade wana azali kolela, ye azali na motuka te. Atali, mais, pasi ya ndenge oyo il faut akende na hôpital !

– Ozali yo nani ?

– Ngai moko kaka !

Alobi : – « bon nalingaki nakende kuna… nakokende lisusu te. Il faut nakende kotika yo. Allez, tokeyi na Mama Yemo » ! Atii loboko na libenga, abimisi, afuti taxi, bakei tii Mama Yemo.

-« Moto oyo nalokoti ye na nzela azali na mpasi, allez basalisa ye » ! Basalisi ye tii esili. Nani mpenza asaleli Nzambe mokolo wana? Oyo akendeki kosala messe mpo aliesaki bato communion? -Te. Oyo akendeki kotika moto na Mama Yemo alors. Omoni ba-actes ya ndenge wana tosalaka attention na yango te. Combien de fois tozali koleka moto azali ko-souffrir? Combien de fois ? Mama moko alali boye, a a a, – oh tala ye ndoki ! -Ndoki te ! Ndoki azali mwana ya Nzambe te ? Azalaka mwan’ Ebale Mbonge te ?! Bandoki bazali bana Ebale Mbonge te ? Na kati na bino awa bokomi lelo bana ya Ebale Mbonge ya malamu, basusu bozalaki bandoki ! Mais ndenge nini bozali kofinga baninga kindoki boye ? Soki omoni ye olobi « nayebi azalaka ndoki » ! Il faut tobikisa ye , tokende na ye na Lopango Losantu mpo abikisama !

Sala oyo ya malamu ekosepelisa Nzambe. Ezali mingi ! Ba exemples ekoki kozala ebele, ebele mpo ya misala oyo Nzambe alingi tosalela ye. Tokobanda kosolola yango na’ na Boyekoli bondimi na’ na mikolo ya lomingo mpo boyeba oyo esengeli kosala mpo Nzambe na bino asepela na bino puisque tolingi tokota na mobu ya misatu ya bana ya Nzambe.

Uta mokili ezalaka’ mokili, kaka ‘86 (1986) nde mbula ya yambo ekomi ya bana ya Nzambe ! Ya mibale ’87 (1987) , mbula ekoya ‘ 88 (1988) nde mbula ya misato et toko- continuer na bambula ya bana ya Nzambe. Mais oyo nyonso ya liboso ezalaki satana moto azalaki mokonzi, azalaki kosala oyo nyonso ye asalaki.

Conséquence na yango tozali na yango lelo. Ba-maladies ndenge na ndenge, na’oyo ya nsomo lokola ndenge toyebi, bokono ya « Mesap » too sida. Ezali etumbu monene Nzambe apesi na bato ya mokili. Moto na moto ayeba oyo asengeli kosalela Nzambe.

Baye bayebi kotanga bible, tanga mibeko oyo nyonso ya kala. Bozali kosala erreur monene ! Bato basusu baboya na bango kotanga ancien testament. Bango kaka nouveau testament ! Makambo nyonso ya Ancien testament- oyo wana te ! Oyo wana ezali ya Nzambe lisusu te ! Nde kaka oyo Yezu alobaka’ boye, yezu alobaki boye ! Mais Yezu ayebisaki na bino que ayaki koboma makambo oyo ezalaki na mibeko ? Alobaki boye ?

Ba-anciens pasteurs, ba-anciens théologiens, Yezu alobaki ‘te ye abomi mibeko ya Nzambe ?! -Bazali kosala erreur !

Moto akoki ko-comprendre Nouveau testament malamu te soko ye ayebi Ancien testament te ! Parce que Nouveau testament ezali ko- expliquer makambo ya Ancien testament oyo Yezu akokaki ko- expliquer na tango wana. Tango bakoya ko-ajouter oyo ya makambo ya Ebale Mbonge eyei alors kopesa bino bwanya, mayele ya makambo ya Nzambe parce que oyo ya Ebale Mbonge bakobenga yango Accomplissement des testaments.

Oyo ekomami na Ancien testament na’ Nouveau testament ekozala accompli lokola ndenge bomoni ezali ko-s’accomplir tous les jours, na oyo bakotia na Accomplissement des testaments. Nyonso misato wana ekosala nde buku oyo ekobiengama Bible ya moto nyonso akozala na yango. Soko moto alobi ‘te : Nouveau testament nde oyo ezali ya solo, oyo ya Ancien testament ezali lokuta, alors moto wana atika koteya makambo ya Nzambe ! Sinon, akokweya na mobeko moko, lokola tata moko tozalaka’ na ye na zone ya Bikoro. Ngai nazali koyebisa na bato ndenge Nzambe alobi :- « Bato bakufaka te, batikaka nzoto, bakei bazali kuna na bomoi », ye akatisi na ngambo ya lac mpo ya koyebisa bato ‘te moto,soko moto akufi, akufi libela ! Lokola azalaki Témoin de Jéhovah angangi : « Moto akosa bino te. Ba-oyo bazali koloba soko moto akufi, moto azali, lokuta ! Soko moto akufi, akufi libela. Boyoki hein ! Soko moto akufi, akufi libela » ! Tango asalaki loboko akwei, akufi, akufi mpe libela ! … Nakanisi oyo wana ekozala malamu mingi soko tokomi na ndenge wana. Ko-inventer makambo ya Nzambe te. Ezali makambo ya invention te. Ebale Mbonge lingomba te. Ngai, nzoto oyo, Nzambe ayei kovanda. Bana banso bakoya epai papa azali. Soko lelo bana nyonso ya ville de Kinshasa bazala papa moko, mpe bayoki te’ papa ayei, avandaka na Kitokimosi. Kitokimosi ezalaka epai wapi ? -Na Selembao ! Ba oyo awa epai boye babengaka yango nini ?-Malueka, bon ! Naloba Malueka. Nayebi te epai Kitokimosi yango ezali. Bon, avandi na Malueka. Omoni ba villa, ba-palais ezali, mais papa na biso auti na mboka ayei. Akei kovanda epai ya leki na biso na Malueka. Biso bana ya papa soko tolingi topesa papa mbote tokokende wapi ? – Malueka ! Na Malueka kaka. Soko yo oboyi kokende na Malueka, papa akoloba nini oboyi ye ? Akosepela na yo ?-Te ! Oboyi ye ?

– (Papa Ebale Mbonge ayembi loyembo po na kosukisa liteya) :- « Elaka ezali koya »….

– (Papa Ebale Mbonge apesi losambo ya kosukisa liteya)

Lilako ya Papa Ebale Mbonge : 

« Bo-poser ba-actes oyo esepelisaka Nzambe » !

Blog

Cette section offre un aperçu du blog, présentant une variété d’articles, d’analyses et de ressources pour informer et inspirer les lecteurs.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *