La criminalité de l'invisible
0 15 minutes 3 semaines

(Oyo ekolanda sima ya eteni ya liboso ezali makomi oyo tobongoli na Lingala na buku ekomamaki na Mulopo Kapita na lokota ya lokota ya lifalasé  » Les Sorciers , ces criminels invisibles  » Les Editions Mounard -2014-Lausanne/Suisse -essai )

Maloba ya liboso 

Tolimbola maloba malamu  » Babomi » mpo na biso ezali baye banso bakosala misala na mayele ya kindoki  to motema  ya kobebisa to koboma bato to biloko bya bango . Ata pe na baye   bakobebisa bikelamo ya molongo bikelami na Nzambe. Wana nde tobengi babomi ya nkuku to ya molili oyo bato banso bakomona te . 

Buku ya Mulopo K. ekouta na likanisi ya Pngnz Mokolo Yabo

 Awa tozali kobongola na lingala  buku eye  ekomamaki na nkondo pngnz  Mulopo Kapita. Kasi bosengeli koyeba ‘te likanisi ya mosala ena  nayokaki yango liboso nà PNngnz Mokolo Yabo . Ye azalaki  Représentant ya yambo  to mokambi  ya  yambo,ndenge Nzambe aponaki ye,   kati ya banganga -Nzambe banso po  na Mission Ebale Mbonge na ekolo Zaïre ,  lelo RDC. 

Buku eye ebotami penza kati  ya  likanisi oyo ye azuaki ete asala miluki po na lipolomo  ya bonganga to Doctorat na université ya Canada esika azalaki na kelasi .   

 Akokaki pênza kosala miluka mina po na lipolomo ena , kasi azuaki ata mokambi moko te to Directeur oyo  akokaki  kolandela ye na mosala mwango  lolenge mibeko ya doctorat ya université ekosengaka .

 Mpo ezalaki penza makanisi ya sika kati ya oyo nyoso esalamaka na Université ena , toloba ata lolenge nzebi ya mibeko ya bosembo ezali kolandema na molongo. Kuna , lokola na mikili ya Eropa , Amerika to Azia  tii na lelo , bandimelaka   maye malekaka  na nkuku te. Kasi bakolandela kaka lolenge nzebi na bango ekotinda. Babengi yango  « méthode scientifique »  oyo ekopesa ntina se na mambi maye makangemi na bikela oyo bakoki kotia liboso na miso ya bato . 

Yango  ții na esambelo na bango, bakolandelaka kaka makambo maye mazuami na bilakela ya pwasa,to « preuves ». Maye  ya kobombana  te .  Nzoka toyebi ete , lokola moloki azali na misala ya butu to nkuku , na moyi okoki kofunda ye na likambo pe te po bikela bya  ye  bizali ya nkuku !! 

 Na esaleli oyo bazali naino na yango ,   tomoni ‘te    kokokisa mikanda to dossier na moyi  mpo ya kosambisa bandoki to bato ya esaleli wana ya nkuku ekozala na nzela te !  Nyoso oyo  mpo nzebi ya  mindele ezui  naino mayele wana te. Nini ekopekisa bango ‘te bakatisa ngambo mpe bazua yango ? Mpo oyo tokoloba awa baye basalaka misala mina bayebi yango malamu koleka.  Yango esali ‘te esambelo ya mokili ezali penza na bosembo te ! 

Mpe bato mingi bazua makama  basuka na nzela mpo bakozanga lolenge ya kotalisa  bobe ya baye bakofunda !   Ezala basambisi to basambeli (avocats) bayebi yango malamu. Ya solo mibeko   tii na mateya ya semba oyo bakoteyaka na kelasi ezali na suka po ezui kaka nzela oyo bango bandimi pe baboyi kokotisa banzela misusu ya kokota na mozindo ya makambo. Lokola bango moko basukisi  mayele ma bango, batomboki pe bazui nzela ya kozanga etumbu na mabe  ma bango .

   Ekopesa  sika na bandoki nzela ete bakoba  na misala  mya  bango na bolembu oyo  ya kobebisa pe koboma bato tii na biloko . 

Wana ezalaki  mpo na kolimbola mikakatano nkondo Pngnz Mokolo azuaki kuna na université ya Canada  tango azalaki na kelasi  kuna . 

 Bomoni sika mpo nini akokaki pe kozua ata molakisi oyo akondima kokamba miluka mya ye te . Yango nde ezali ntina eye  akobaki lisusu te na miluka miye  mikokaki kokumba ye na bozui   lipolomo ya nganga mayele kati ya nzebi eye elandelaka bato ya mobulu to Criminologie.  

  Yango tango esalemi  boye   bayaki pe sima  kozua ye   na mosala ya Leta  na mboka . Yango  ye azongaki na mboka Zaïre . Uta wana ,azuaki lisusu  ntango  to  mayele ya kolandela miluka   wana  te . Na lipolomo oyo ye asilaki kozua ,  toyebi oyo ya   « Licence ya Sociologie » pe « Master na Criminologie ». Doctorat na ye oyo akanaki , asala yango lisusu te ndenge towuti kolimbola .   

Yango azalaki  ntango na ntango kolobela yango , na eleko oyo asilaki kokoma  ngnz kati ya mission Ebale Mbonge . Toyebaka ‘te  nzebi ya esaleli na Mission Ebale Mbonge ezali mingi penza na kolandela makambo maye mabombani . Mpo   elobi ‘te mikano ya mabe ebandaka na butu po eya kokokisama na moyi !  Wana penza esaleli ya bato ya misala ya nkuku. 

Boye soki na yambo bososoli oyo ya butu te, botali kaka ya moyi,  lolenge miso pe mayele ma bino mazali kokamba bino  , bokoyeba pe kosukisa bato ya misala mabe te !  

 Elingi koloba ‘te tango bino bozali kolala  mpongi,bango bazali kobongisa mitambo mya bango. Tango bokokoma na moyi , oyo ya bango esilaki kobongisama. Bakomi lokola bato bazali liboso na bino. Wana bokolonga bango lolenge nini? Soki moto asilaki kotia  mitambo na ye na butu , bino na ntongo tango bokoya , bokoki koyeba esika atiaki yango te .  Na yango bokozala pe na bokebi te .  Wana bokokangema lokola banyama pamba . Mpe baye ya butu bakolonga bino!  

Kasi soko bayi-mibeko   bandimi kobakisa mayele oyo ezali na esaleli ya Mission Ebale Mbonge , oyo ebengami na lifalasé Parapsychologie appliquée ,wana nde  bakoyeba penza kobikisa bana ba Nzambe mingi , tii na molongo mobimba! 

Bonganga ya Ebale Mbonge ezali eloko nini

Parapsychologie appliquée ya Ebale Mbonge ezali bonganga ya kobikisa nzoto pe molimo na nguya ya  Nzambe na maloba . Nguya ena ezali kobima na maloba  se lolenge ye mei Nzambe akelaki mokili , alobi ekokisami. Lokola ezali ya Nzambe , nyoso ezali polele mpo na bango .Lokola bazali na nguya ya kosambisa milimo nyoso ndenge Nzambe apesa bango, eloko moko ekoki lisusu kotikala na molili to kobombana te.

Soki likambo ezali , bakosambisa molimo wana pe bakoyeba  nini basala na biyano  oyo bakozua .  Na eleko oyo tozali ,  ezali eleko ya ntango ya suka ndenge ekomami na Biblia . Mpo na kobikisa mokili,  Nzambe ye mei apesi  nguya wana na Mission na ye oyo ebengami na nkombo oyo ye moko apesi ete   Mission Ebale Mbonge

 Bonganga ya nzoto pe molimo ekosalema na nzebi ya Nzambe ye moko , ya moto te !  Ezala na moyi to  na butu , misala ya bonganga makosalema na pwasa. pe bakoki na bonganga kobongola butu ekoma moyi na miso ya moloki oyo bakosambisa !    Yango ata ndoki to moto moko ya mobulu akokoka lisusu komibomba na nkuku te mpo na bonganga ya Ebale Mbonge bakotia misala na ye na polele.

Mpo tango bakobenga molimo na ye esamba , molimo ekobimisa sekele nyoso ya nkolo nzoto ata baye soko bayebaki ye liboso te , akoyanola na mituna minso . Yango ezali penza esambelo oyo ya  semba eleki manso .  Bonganga oyo ndenge bokomona  ekokaki penza kosunga polisi oyo elandelaka bato ya mobulu to ba criminels.

Kasi lokola mokili oyo tozali ekambemi mingi na baye bazali na nguya ya molili ,bakoki  pe kolinga te ‘te misala ma bango makweya na mbeba pe basambwa.  Mpe tango nyoso  babongisaka esambelo , ezalaka kaka na esika moko  oyo bokomona ‘te basuki , bakolinga kokota na mozindo te . Wana semba ekozuama ata mokolo te. Yango mibeko ya semba  mizali se kotepatepa. Baye bakopesa mibeko bakobatela bango moko bato ya mobulu.    

Sika , bosengeli koyeba ‘te soki Leonard Mulopo K. akomaki buku oyo tobongoli na lingala awa  ,ezali   penza na eleko oyo ayaki kosala masolo  na Pngnz Mokolo Yabo   na Kinshasa .Yango bayokanaki  ete ye Mulopo akoma buku ya makambo yango ya bato ya mobulu ya butu to bandoki pe abimisa yango  tango akozonga  na mpoto (Suisse, France) ndenge ye alobaki ‘te azali na makoki ya kosala yango. Nyoso oyo ezalaki  po kuna pe sango ya Mission Ebale Mbonge ekoba . Wana emoneli po na libiki ya bana ba Nzambe  na molongo. Kasi mpo Mulopo Kapita ayeba makambo misusu ya bonganga , esengelaki ete ye pe akoma ngnz mpo mosala mona esalema malamu na  nguya ya Nzambe . Tala esika  ye pe azuaki bonganga na mwasi na ye. 

Mpo na ngai tosololaki ata  mbala mibale liboso na Pngnz Mulopo mpe natunaki ye soki  akoki kondima ‘te nabongola buku na ye oyo akomaki mpo na Lumumba na lingala. Ye  andimaki likanisi lina. Wana asilaki kozonga na France , na Lyon , pe ngai  pe nasilaki kokoma na France . Yango sima ya mwa bileko  molayi , atindelaki ngai buku moko .Kasi ezalaki lisusu oyo ya Lumumba te . Ezalaki nde oyo akomaki po na bandoki to babomi ya nkuku .Yango nde tokobongola na lingala awa . Na sima na yango , ayaki kobela makasi . Lelo oyo ekokisi mibu ata misato to minei uta atiki mokili oyo. 

Namoni ‘te lokola likanisi ya buku ena ezongeli ngai ,  nasengeli kokoba na kobongola yango awa na lingala . Mingi penza nakotia  oyo etali Mission Ebale Mbonge    na pe mwa bitape oyo  biwuti na ba buku ya basusu ya molongo oyo  miluka ya Pngnz Mulopo mikumbaki ye . 

Nakolikya ete lokola tokobongola na Lingala  mosala moye   mokotuta mitema ya bayimboka mpo balongwa na mpongi pe baluka kokolisa boyebi bwa bango. Bango batanga yango mpe makanisi mazali awa makomela bango na lombangu . Ezali mposa na ngai uta kala ete esengeli babuku ya litomba  ezala mingi na nkota na biso  mpo na kokolisa boyebi ya bayimboka. Mpo soko tokokoma kaka na nkota ya bampaya , kaka bango nde   bakokolisa boyebi bwa bango ! Tii na lelo ekomi  se lokola bakomi ba buku bapesa mokongo na bayimboka .

Bozui buku ezali mpasi po na bayimboka

Ya solo , soki oluki babuku na nkota na biso ezali penza moke mingi koleka ! Nzoka uta ekolo ezuaka bonsomi to lipanda tokokisi bongo mibu ntuku motoba na motoba ! Bato boni basila kobima na biteyelo ya minene  to université pe bayebi kokoma ? Soki bakozua mabanga ya ntalo pe bakokoma na misolo mingi, mpo nini bakokanisa  kosala  misala ya kobimisa babuku te o mboka na biso moko?

  Banso bakokoma pe bakoteya na bakelasi kaka na nkota ya bampaya . Lifalasé nde ekoma lokola   fungola ya boyebi tii  kutu elembo ya mayele , ndenge elobamaka na eleko ya Congo-belge ;na eleko ya bokonzi ya ba belesi . 

 Nzoka kokoma pe koteya kaka na nkota ya bampaya lokola lifalasé ekobungisa nkota na biso moko. Yango  pe ekotia bilenge kaka  bo bahumbu ya bato ya France ! 

Wana baye babengaka bango bandombe  bazui lisusu esika na nzela ya bakitano na bango .  Nzoka na nyoso wana , bazali se  kolona  na bilanga ya bampaya !! Bakolia mbuma na yango ata te ! Se ndenge nkondo Lumumba alobaka ete : « *Batie biso kati ya boloko moko. Tango moko bakotala biso  na mwa mawa , pe tango mosusu bakotiola biso bakoseka… » (*mokanda na Polina Opango/lettre à Pauline)

Yango soko otamboli na bamboka na biso , okomona bisika ya kosakana na komela masanga ya mindele ezali ebele, kasi  bandako ya kotanga   babuku ezali ata te  !   Bana ya ekolo na  biso bakokola na mposa ya kotanga babuku lolenge kani soki esika ya bozui buku ezali te ?? Nzoka mposa wana ebandaka uta bomwana . Tokamwa te lolenge babebisa likambo ya  biteyelo o mboka na biso ! Pe mwana  ata azui lipolomo lelo, tokomono ete azali  na nzebi moke pe bizaleli kaka lokola soki atanga malamu te ! Tokoki komituna soko  asosolaki malamu mateya maye batangisaki ye to mateya mango  masila koguga , elingi koloba  esila  kokoma ya kala ?!  Mpo na   mateya mango , tomituna lelo  soko mazali penza kopesa biyano na  bamposa ya ekolo na biso pe ya bayimboka na bileko ya lelo kati ya molongo ?  

  Tii na lelo ekolo Kongo /Rdc ekokisi mibu ntuku motoba na motoba uta ezuaka lipanda ,kasi tozali kaka kati ya bohumbu ya kokoma pe koloba nyoso na lifalasé. Nzoka bampaya  ata bafandi mibu ebele to babotami na ekolo na biso , bakomaka kaka na lokota na bango moko mpo batangi nde bayimboka na bango. Tososola ! Soki bayimboka bakotanga makomi ma baye bakokoma te   ,ntina ekoutaka mingi na mpo makomami na lokota ya lifalasé to mpe buku ezali ntalo koleka bozui ya bayimboka !!!  Ezali kaka  lokola  soki tango ya likama okobelela  na lokota ya bampaya, moto moko akoyeba ntina ya maloba ma yo te ,   pe  akoya kosunga yo te ! 

 Litonba ya kokoma na nkota na biso

Bonsomi ya  bato soki ebandaka liboso na lokota oyo tokoloba mpo lokota nde nzela ya kokabola makanisi.  Yango ekotalisa bokeseni na banyama . Mpo Nzambe apesi moto maloba oyo ye moko azali na yango . Yango bakoma na Biblia  ete akeli biso na elilingi na ye!   

Tobosana te lokota ezali se lokola pitolo kati ya masini ya motuka . Tango okotambwisa motuka,   yango pe ekosila ! Soki tokomi  kokoma  na nkota na biso , ekokolisa pe maloba ya nkota na biso . Wana mpo  tokobanda tango nyoso kobakisa oyo ekozanga po totikala seko kokende liboso.  Mpo na kosukisa , nakosenga na bayimboka baye basila kokoma babuku na bango na  nkota ya bampaya  bazongela  koluka mayele ya kobongola yango na nkota na biso mpo bayimboka pe bazua nzela ya kotanga yango na bolembu .  Mpo soki bakosala bongo te  makomi ma bango makoezala kaka mpo na eteni moke ya baye bayoka sango . Soki tolingi penza kolobela mpo na  ekolo , totiaka miso liboso na bayimboka .  

Tozongela bonsomi na biso pe totika kolona na mapango ya kofutela,   noki te  tokolia mbuma ya milona mina te !!! Tososola maloba ya  nkondo Lumumba oyo alobaka  ete «   ndele bakokoma lisolo ya ekolo , ekozala oyo bakoteyaka  na Paris , Bruxelles to Londres te ,  kasi oyo ya biso moko bayimboka. »Tokomi na eleko yango , tokota na bikela , totika naino koloba pamba , totika bilembo na makomi mpo yango eleki nyoso !!!  Ata bayemi ekeko , ekeko elobaka te , okososola yango lolenge kani? Kasi buku ekopesa yo penza makanisi ya mokomi . Yango Nzambe apesaka nzela na ba profeta na ye ete bakoma maloba ma ye po mabunga te ! Tososola !  Maloba ezanga bikela  mazali  se lokola  mopepe kati ya eliki .Soki  tokomi yango te ekobunga , to bakobongola yango ndenge ya mabe  !    

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *