
(Oyo ekolanda sima ya eteni ya liboso ezali makomi oyo tobongoli na Lingala na buku ekomamaki na Mulopo Kapita na lokota ya lokota ya lifalasé » Les Sorciers , ces criminels invisibles » Les Editions Mounard -2014-Lausanne/Suisse -essai )
Maloba ya liboso
Tolimbola maloba malamu » Babomi » mpo na biso ezali baye banso bakosala misala na mayele ya kindoki to motema ya kobebisa to koboma bato to biloko bya bango . Ata pe na baye bakobebisa bikelamo ya molongo bikelami na Nzambe. Wana nde tobengi babomi ya nkuku to ya molili oyo bato banso bakomona te .
Buku ya Mulopo K. ekouta na likanisi ya Pngnz Mokolo Yabo
Awa tozali kobongola na lingala buku eye ekomamaki na nkondo pngnz Mulopo Kapita. Kasi bosengeli koyeba ‘te likanisi ya mosala ena nayokaki yango liboso nà PNngnz Mokolo Yabo . Ye azalaki Représentant ya yambo to mokambi ya yambo,ndenge Nzambe aponaki ye, kati ya banganga -Nzambe banso po na Mission Ebale Mbonge na ekolo Zaïre , lelo RDC.
Buku eye ebotami penza kati ya likanisi oyo ye azuaki ete asala miluki po na lipolomo ya bonganga to Doctorat na université ya Canada esika azalaki na kelasi .
Akokaki pênza kosala miluka mina po na lipolomo ena , kasi azuaki ata mokambi moko te to Directeur oyo akokaki kolandela ye na mosala mwango lolenge mibeko ya doctorat ya université ekosengaka .
Mpo ezalaki penza makanisi ya sika kati ya oyo nyoso esalamaka na Université ena , toloba ata lolenge nzebi ya mibeko ya bosembo ezali kolandema na molongo. Kuna , lokola na mikili ya Eropa , Amerika to Azia tii na lelo , bandimelaka maye malekaka na nkuku te. Kasi bakolandela kaka lolenge nzebi na bango ekotinda. Babengi yango « méthode scientifique » oyo ekopesa ntina se na mambi maye makangemi na bikela oyo bakoki kotia liboso na miso ya bato .
Yango ții na esambelo na bango, bakolandelaka kaka makambo maye mazuami na bilakela ya pwasa,to « preuves ». Maye ya kobombana te . Nzoka toyebi ete , lokola moloki azali na misala ya butu to nkuku , na moyi okoki kofunda ye na likambo pe te po bikela bya ye bizali ya nkuku !!
Na esaleli oyo bazali naino na yango , tomoni ‘te kokokisa mikanda to dossier na moyi mpo ya kosambisa bandoki to bato ya esaleli wana ya nkuku ekozala na nzela te ! Nyoso oyo mpo nzebi ya mindele ezui naino mayele wana te. Nini ekopekisa bango ‘te bakatisa ngambo mpe bazua yango ? Mpo oyo tokoloba awa baye basalaka misala mina bayebi yango malamu koleka. Yango esali ‘te esambelo ya mokili ezali penza na bosembo te !
Mpe bato mingi bazua makama basuka na nzela mpo bakozanga lolenge ya kotalisa bobe ya baye bakofunda ! Ezala basambisi to basambeli (avocats) bayebi yango malamu. Ya solo mibeko tii na mateya ya semba oyo bakoteyaka na kelasi ezali na suka po ezui kaka nzela oyo bango bandimi pe baboyi kokotisa banzela misusu ya kokota na mozindo ya makambo. Lokola bango moko basukisi mayele ma bango, batomboki pe bazui nzela ya kozanga etumbu na mabe ma bango .
Ekopesa sika na bandoki nzela ete bakoba na misala mya bango na bolembu oyo ya kobebisa pe koboma bato tii na biloko .
Wana ezalaki mpo na kolimbola mikakatano nkondo Pngnz Mokolo azuaki kuna na université ya Canada tango azalaki na kelasi kuna .
Bomoni sika mpo nini akokaki pe kozua ata molakisi oyo akondima kokamba miluka mya ye te . Yango nde ezali ntina eye akobaki lisusu te na miluka miye mikokaki kokumba ye na bozui lipolomo ya nganga mayele kati ya nzebi eye elandelaka bato ya mobulu to Criminologie.
Yango tango esalemi boye bayaki pe sima kozua ye na mosala ya Leta na mboka . Yango ye azongaki na mboka Zaïre . Uta wana ,azuaki lisusu ntango to mayele ya kolandela miluka wana te . Na lipolomo oyo ye asilaki kozua , toyebi oyo ya « Licence ya Sociologie » pe « Master na Criminologie ». Doctorat na ye oyo akanaki , asala yango lisusu te ndenge towuti kolimbola .
Yango azalaki ntango na ntango kolobela yango , na eleko oyo asilaki kokoma ngnz kati ya mission Ebale Mbonge . Toyebaka ‘te nzebi ya esaleli na Mission Ebale Mbonge ezali mingi penza na kolandela makambo maye mabombani . Mpo elobi ‘te mikano ya mabe ebandaka na butu po eya kokokisama na moyi ! Wana penza esaleli ya bato ya misala ya nkuku.
Boye soki na yambo bososoli oyo ya butu te, botali kaka ya moyi, lolenge miso pe mayele ma bino mazali kokamba bino , bokoyeba pe kosukisa bato ya misala mabe te !
Elingi koloba ‘te tango bino bozali kolala mpongi,bango bazali kobongisa mitambo mya bango. Tango bokokoma na moyi , oyo ya bango esilaki kobongisama. Bakomi lokola bato bazali liboso na bino. Wana bokolonga bango lolenge nini? Soki moto asilaki kotia mitambo na ye na butu , bino na ntongo tango bokoya , bokoki koyeba esika atiaki yango te . Na yango bokozala pe na bokebi te . Wana bokokangema lokola banyama pamba . Mpe baye ya butu bakolonga bino!
Kasi soko bayi-mibeko bandimi kobakisa mayele oyo ezali na esaleli ya Mission Ebale Mbonge , oyo ebengami na lifalasé Parapsychologie appliquée ,wana nde bakoyeba penza kobikisa bana ba Nzambe mingi , tii na molongo mobimba!
Bonganga ya Ebale Mbonge ezali eloko nini
Parapsychologie appliquée ya Ebale Mbonge ezali bonganga ya kobikisa nzoto pe molimo na nguya ya Nzambe na maloba . Nguya ena ezali kobima na maloba se lolenge ye mei Nzambe akelaki mokili , alobi ekokisami. Lokola ezali ya Nzambe , nyoso ezali polele mpo na bango .Lokola bazali na nguya ya kosambisa milimo nyoso ndenge Nzambe apesa bango, eloko moko ekoki lisusu kotikala na molili to kobombana te.
Soki likambo ezali , bakosambisa molimo wana pe bakoyeba nini basala na biyano oyo bakozua . Na eleko oyo tozali , ezali eleko ya ntango ya suka ndenge ekomami na Biblia . Mpo na kobikisa mokili, Nzambe ye mei apesi nguya wana na Mission na ye oyo ebengami na nkombo oyo ye moko apesi ete Mission Ebale Mbonge!
Bonganga ya nzoto pe molimo ekosalema na nzebi ya Nzambe ye moko , ya moto te ! Ezala na moyi to na butu , misala ya bonganga makosalema na pwasa. pe bakoki na bonganga kobongola butu ekoma moyi na miso ya moloki oyo bakosambisa ! Yango ata ndoki to moto moko ya mobulu akokoka lisusu komibomba na nkuku te mpo na bonganga ya Ebale Mbonge bakotia misala na ye na polele.
Mpo tango bakobenga molimo na ye esamba , molimo ekobimisa sekele nyoso ya nkolo nzoto ata baye soko bayebaki ye liboso te , akoyanola na mituna minso . Yango ezali penza esambelo oyo ya semba eleki manso . Bonganga oyo ndenge bokomona ekokaki penza kosunga polisi oyo elandelaka bato ya mobulu to ba criminels.
Kasi lokola mokili oyo tozali ekambemi mingi na baye bazali na nguya ya molili ,bakoki pe kolinga te ‘te misala ma bango makweya na mbeba pe basambwa. Mpe tango nyoso babongisaka esambelo , ezalaka kaka na esika moko oyo bokomona ‘te basuki , bakolinga kokota na mozindo te . Wana semba ekozuama ata mokolo te. Yango mibeko ya semba mizali se kotepatepa. Baye bakopesa mibeko bakobatela bango moko bato ya mobulu.
Sika , bosengeli koyeba ‘te soki Leonard Mulopo K. akomaki buku oyo tobongoli na lingala awa ,ezali penza na eleko oyo ayaki kosala masolo na Pngnz Mokolo Yabo na Kinshasa .Yango bayokanaki ete ye Mulopo akoma buku ya makambo yango ya bato ya mobulu ya butu to bandoki pe abimisa yango tango akozonga na mpoto (Suisse, France) ndenge ye alobaki ‘te azali na makoki ya kosala yango. Nyoso oyo ezalaki po kuna pe sango ya Mission Ebale Mbonge ekoba . Wana emoneli po na libiki ya bana ba Nzambe na molongo. Kasi mpo Mulopo Kapita ayeba makambo misusu ya bonganga , esengelaki ete ye pe akoma ngnz mpo mosala mona esalema malamu na nguya ya Nzambe . Tala esika ye pe azuaki bonganga na mwasi na ye.
Mpo na ngai tosololaki ata mbala mibale liboso na Pngnz Mulopo mpe natunaki ye soki akoki kondima ‘te nabongola buku na ye oyo akomaki mpo na Lumumba na lingala. Ye andimaki likanisi lina. Wana asilaki kozonga na France , na Lyon , pe ngai pe nasilaki kokoma na France . Yango sima ya mwa bileko molayi , atindelaki ngai buku moko .Kasi ezalaki lisusu oyo ya Lumumba te . Ezalaki nde oyo akomaki po na bandoki to babomi ya nkuku .Yango nde tokobongola na lingala awa . Na sima na yango , ayaki kobela makasi . Lelo oyo ekokisi mibu ata misato to minei uta atiki mokili oyo.
Namoni ‘te lokola likanisi ya buku ena ezongeli ngai , nasengeli kokoba na kobongola yango awa na lingala . Mingi penza nakotia oyo etali Mission Ebale Mbonge na pe mwa bitape oyo biwuti na ba buku ya basusu ya molongo oyo miluka ya Pngnz Mulopo mikumbaki ye .
Nakolikya ete lokola tokobongola na Lingala mosala moye mokotuta mitema ya bayimboka mpo balongwa na mpongi pe baluka kokolisa boyebi bwa bango. Bango batanga yango mpe makanisi mazali awa makomela bango na lombangu . Ezali mposa na ngai uta kala ete esengeli babuku ya litomba ezala mingi na nkota na biso mpo na kokolisa boyebi ya bayimboka. Mpo soko tokokoma kaka na nkota ya bampaya , kaka bango nde bakokolisa boyebi bwa bango ! Tii na lelo ekomi se lokola bakomi ba buku bapesa mokongo na bayimboka .
Bozui buku ezali mpasi po na bayimboka
Ya solo , soki oluki babuku na nkota na biso ezali penza moke mingi koleka ! Nzoka uta ekolo ezuaka bonsomi to lipanda tokokisi bongo mibu ntuku motoba na motoba ! Bato boni basila kobima na biteyelo ya minene to université pe bayebi kokoma ? Soki bakozua mabanga ya ntalo pe bakokoma na misolo mingi, mpo nini bakokanisa kosala misala ya kobimisa babuku te o mboka na biso moko?
Banso bakokoma pe bakoteya na bakelasi kaka na nkota ya bampaya . Lifalasé nde ekoma lokola fungola ya boyebi tii kutu elembo ya mayele , ndenge elobamaka na eleko ya Congo-belge ;na eleko ya bokonzi ya ba belesi .
Nzoka kokoma pe koteya kaka na nkota ya bampaya lokola lifalasé ekobungisa nkota na biso moko. Yango pe ekotia bilenge kaka bo bahumbu ya bato ya France !
Wana baye babengaka bango bandombe bazui lisusu esika na nzela ya bakitano na bango . Nzoka na nyoso wana , bazali se kolona na bilanga ya bampaya !! Bakolia mbuma na yango ata te ! Se ndenge nkondo Lumumba alobaka ete : « *Batie biso kati ya boloko moko. Tango moko bakotala biso na mwa mawa , pe tango mosusu bakotiola biso bakoseka… » (*mokanda na Polina Opango/lettre à Pauline)
Yango soko otamboli na bamboka na biso , okomona bisika ya kosakana na komela masanga ya mindele ezali ebele, kasi bandako ya kotanga babuku ezali ata te ! Bana ya ekolo na biso bakokola na mposa ya kotanga babuku lolenge kani soki esika ya bozui buku ezali te ?? Nzoka mposa wana ebandaka uta bomwana . Tokamwa te lolenge babebisa likambo ya biteyelo o mboka na biso ! Pe mwana ata azui lipolomo lelo, tokomono ete azali na nzebi moke pe bizaleli kaka lokola soki atanga malamu te ! Tokoki komituna soko asosolaki malamu mateya maye batangisaki ye to mateya mango masila koguga , elingi koloba esila kokoma ya kala ?! Mpo na mateya mango , tomituna lelo soko mazali penza kopesa biyano na bamposa ya ekolo na biso pe ya bayimboka na bileko ya lelo kati ya molongo ?
Tii na lelo ekolo Kongo /Rdc ekokisi mibu ntuku motoba na motoba uta ezuaka lipanda ,kasi tozali kaka kati ya bohumbu ya kokoma pe koloba nyoso na lifalasé. Nzoka bampaya ata bafandi mibu ebele to babotami na ekolo na biso , bakomaka kaka na lokota na bango moko mpo batangi nde bayimboka na bango. Tososola ! Soki bayimboka bakotanga makomi ma baye bakokoma te ,ntina ekoutaka mingi na mpo makomami na lokota ya lifalasé to mpe buku ezali ntalo koleka bozui ya bayimboka !!! Ezali kaka lokola soki tango ya likama okobelela na lokota ya bampaya, moto moko akoyeba ntina ya maloba ma yo te , pe akoya kosunga yo te !
Litonba ya kokoma na nkota na biso
Bonsomi ya bato soki ebandaka liboso na lokota oyo tokoloba mpo lokota nde nzela ya kokabola makanisi. Yango ekotalisa bokeseni na banyama . Mpo Nzambe apesi moto maloba oyo ye moko azali na yango . Yango bakoma na Biblia ete akeli biso na elilingi na ye!
Tobosana te lokota ezali se lokola pitolo kati ya masini ya motuka . Tango okotambwisa motuka, yango pe ekosila ! Soki tokomi kokoma na nkota na biso , ekokolisa pe maloba ya nkota na biso . Wana mpo tokobanda tango nyoso kobakisa oyo ekozanga po totikala seko kokende liboso. Mpo na kosukisa , nakosenga na bayimboka baye basila kokoma babuku na bango na nkota ya bampaya bazongela koluka mayele ya kobongola yango na nkota na biso mpo bayimboka pe bazua nzela ya kotanga yango na bolembu . Mpo soki bakosala bongo te makomi ma bango makoezala kaka mpo na eteni moke ya baye bayoka sango . Soki tolingi penza kolobela mpo na ekolo , totiaka miso liboso na bayimboka .
Tozongela bonsomi na biso pe totika kolona na mapango ya kofutela, noki te tokolia mbuma ya milona mina te !!! Tososola maloba ya nkondo Lumumba oyo alobaka ete « ndele bakokoma lisolo ya ekolo , ekozala oyo bakoteyaka na Paris , Bruxelles to Londres te , kasi oyo ya biso moko bayimboka. »Tokomi na eleko yango , tokota na bikela , totika naino koloba pamba , totika bilembo na makomi mpo yango eleki nyoso !!! Ata bayemi ekeko , ekeko elobaka te , okososola yango lolenge kani? Kasi buku ekopesa yo penza makanisi ya mokomi . Yango Nzambe apesaka nzela na ba profeta na ye ete bakoma maloba ma ye po mabunga te ! Tososola ! Maloba ezanga bikela mazali se lokola mopepe kati ya eliki .Soki tokomi yango te ekobunga , to bakobongola yango ndenge ya mabe !
